Buku Sphère

Makambo ezali na kati
Maloba ya ebandeli
Oyo ezali mbula ya 20 banda buku Sphère ebimá, mpe yango ekokani na kobimisama ya ebimeli na yango ya minei. Ezali mosala makasi oyo bato oyo basalaka mosala ya kosunga bato na mokili mobimba basali na mbula moko. Esangisi mpe eksperiansi ya mbula 20 ya bato oyo basaleli masengami na yango na bisika oyo bitumba to makama ebimaki, na mosala ya kobimisa malako ya sika mpe ya kolendisa basusu bátyaka likebi na lolenge bazali kosunga bato mpe na mokumba oyo bazali na yango na miso ya bato yango.
Buku oyo elobeli makambo polele mpe esimbami na ntomo ya bato. Ezwi moboko na yango na mibeko mpe mitinda ya bizaleli malamu oyo esimbi mosala ya kosunga bato. Ezali mpe kopesa malako oyo ebongi, kolakisa mimeseno malamu ya mosala oyo esalelamaka na mokili mobimba, mpe ebele ya makambo mosusu ya solo mpo na kosalisa bato oyo basalaka mosala ya kosunga bato bipai nyonso.
Na mosala ya kosunga bato, oyo ezali se kokola, Sphère ekokani na buku mosusu te. Ebimeli na yango oyo, ekotisi mpenza makanisi oyo euti na boyokani ya mikili ndenge na ndenge oyo esalemaki na Likita ya liboso ya mosala ya kosunga bato na 2016, na Agenda ya bokólisi ya makambo oyo ekoumela ya 2030 mpe na bibongiseli mosusu etali mokili mobimba.
Atako malako ezali se kobongwana, kasi toyebi ete bamposa oyo etali ndenge ya kobikela, oyo bato oyo bazali bisika bitumba mpe makama minene ebimi bazali na yango sikoyo, ebongwani ata moke te, ezala esika nini mikakatano yango ebimi. Sphère elandaka mpe ebakisaka na malako oyo esalelamaka na mokili mobimba mpe na mboka na mboka: ezongelaka likanisi oyo ete baoyo bazali kosunga basusu basengeli mpenza komonaka ete bazali na mokumba liboso ya bato yango mpo na kosalisa bato yango bákoba kozala na bomoi, kozongela makasi mpe bomoi ya malamu lokola bato.
Nini esalaka ete Sphère ezala makasi mpe eyebana mokili mobimba? Mpo ezali ya bato nyonso. Yango emonanaka mbala na mbala ntango baoyo bazali na kati ya Sphère batalelaka mpe babongisaka lisusu masengami na yango. Na ntango wana, biso nyonso tokomaka lisusu makambo oyo tozali na mokumba ya kosala, mpe toyokanaka tósala lisusu malamu mpo tómindimisa ete basali bazali na makambo oyo basengeli koyeba, ata soki bazali kosala esika nini. Yango esalaka ete bato nyonso bátyela Sphère motema mpe ekundwela bango ete ezali na ntina bato bámimona te ete bazangi valere, mpe ete bazali na lotomo ya kosangana mpenza na bikateli nyonso oyo etali bango.
Sphère ezali moko ya bibongiseli oyo esimbi mosala ya kosunga bato. Esungaka mpenza bato oyo babandi mosala yango sika, mpe baoyo baumeli na mosala yango batalelaka yango mbala na mbala. Epesaka malako mpo na makambo ya kosala nokinoki mpe elakisaka epai moto akoki koyeba makambo mosusu oyo etali mosala moko ya sikisiki. Masengami ya bibongiseli mosusu oyo esalaka elongo na biso esungaka mpe na makambo mosusu ya sikisiki, longola oyo ya Sphère, mpo na kosalisa bato bázonga makasi mpe bákóma malamu.
Buku oyo ezwi makanisi epai ya ebele ya bato oyo basalaka na bibongiseli koleka 450 oyo ezali na bikólo koleka 65 ya mokili. Na yango, emonisi mayele oyo euti na makambo ndenge na ndenge, mikakatano ya minene, mpe bato ya ndenge na ndenge oyo basalaka mosala yango. Masengami oyo elingaki kozala te soki mingi kati na bino bámipesaka mobimba te. Bato ya mosala na biso oyo ya kosunga bato bapesi bino matondi mpo na ndenge bopesaki mabɔkɔ ntango buku oyo ezalaki kobongisama lisusu, mpe mpo na bambula 20 oyo eleki ya kosala elongo.
Elikya na biso ezali ya kokoba na mosala oyo ya ntina mpe ya koyekola ná bino ntango bokosalela buku oyo.
![]() |
![]() |
|
Martin McCann | Christine Knudsen | |
Prezida ya Komite ya Bakambi ya Sphère | Mokambi Monene |
Matondi
Banda ebongiseli Sphère ebandá, naino totuná te makanisi ya bato ebele mpe ya ndenge na ndenge lokola tosali mbala oyo mpo na kokoma ebimeli oyo ya buku Sphère. Na nzela ya Internet, bibongiseli 190 etindelaki biso bakomantere pene na 4 500; mpe bato koleka 1 400 bakendaki kosangana na milulu 60 oyo bibongiseli oyo esalaka elongo na biso ebongisaki na mikili 40. Sphère epesi matondi mingi na ebele ya bibongiseli mpe ya bato oyo bapesaki makanisi ya ntina mingi, na ndakisa ba-ONG ya mboka na mboka, ba-ONG oyo esalaka na mikili mingi, bakonzi ya mboka mpe baministere, bibongiseli ya Croix-Rouge mpe ya Croissant-Rouge, bainiversite, bibongiseli ya ONU mpe bato oyo basalaka mosala ya kosunga basusu.
Mpo na mokapo oyo elobeli Esika ya komibomba ná esika ya kofanda, makanisi na biso ekei epai ya Graham Saunders, oyo akomaki mokapo yango na ebimeli ya 2004 mpe ya 2011 ya buku oyo, mpe apesaki makanisi na ntango babandaki kokoma ebimeli oyo ya 2018.
Graham azalaki mpenza kosunga bato mpe koboma nzoto mpo na likambo etali Esika ya komibomba. Ndenge azalaki kotalela mpe kotambwisa makambo, mpe ebele ya makasi oyo azalaki na yango esalisaki mpo bato na mokili báyeba makambo etali kopesa bato bisika ya komibomba na ntango ya mikakatano; mpe ebongisi nzela na baoyo bayei nsima na mosala ya kopesa bato bisika ya komibomba na ntango ya mikakatano. Azalaki ntango nyonso kosala milende mpo na kobongisa lisusu lolenge ya kosala mosala yango. Tokokanisa ye mpenza lokola moto oyo afungolaki nzela, oyo ayebaki mosala malamu, mpe moninga.
Biro ya Sphère nde ekambaki mosala ya kobongisa lisusu buku oyo. Ezali na bato oyo babandaki kokoma mokapo mokomoko, na nsima bato mosusu ya mayele na likambo mokomoko ya sikisiki, bakisa mpe baoyo bayebi malamu mosala ya kosunga bato, baponamaki mpo na kopesa bango makanisi. Ezala bakomi to baoyo bapesaki bango makanisi, mingi kati na bango bautaki na bibongiseli ndenge na ndenge oyo etindaki bango; bapesaki ntango mpe makasi na bango lokola likabo mpo na mosala ya kosunga bato.
Baekipi ya bokomi mpe ya kopesa toli etyamaki mpo na kopesa mabɔkɔ na bakomi ya buku oyo mpe na bato ya mayele oyo bazalaki kopesa bango makanisi na makambo ya sikisiki. Sphère epesi matondi mingi na bato wana nyonso oyo bapesaki mabɔkɔ kobanda 2017 tii 2018. Okokuta bankombo ya bato nyonso oyo basalaki na baekipi yango na site Internet ya Sphère: spherestandards.org. Okomona bankombo ya bato oyo bakomaki buku oyo mpe ya bato ya mayele awa na nse.
Mikapo ya moboko
Mobeko-likonzi ya mosala ya kosunga bato mpe Libakisi 1: Dr Mary Picard
Mitinda etali kobatela bato: Simon Russell (Simon Russell (Global Protection Cluster) ná Kate Sutton (Humanitarian Advisory Group)
Mobeko ya ntina mingi na mosala ya kosunga bato: Takeshi Komino (CWSA Japon) ná Sawako Matsuo (JANIC)
Mikapo oyo elobeli misala ya sikisiki
Mai, kolongola bosɔtɔ, mpe kolendisa bopeto: Kit Dyer (NCA) ná Jenny Lamb (Oxfam GB)
Kokoka komileisa: Daniel Wang’ang’a (WVI)
Makambo etali bilei: Paul Wasike (Save the Children USA)
Esika ya komibomba ná esika ya kofanda: Seki Hirano (CRS) ná Ela Serdaroglu (FIRC)
Sante: Dr Durgavasini Devanath (FIRC), Dr Julie Hall (FIRC), Dr Judith Harvie (Corps médical international), Dr Unni Krishnan (Save the Children Australia), Dr Eba Pasha (na ndenge na ye moko)
Bolembu, makoki, mpe bisika oyo mosala ezali kosalema
Bana mpe kobatela bana: Susan Wisniewski (Terre des Hommes)
Mibange: Irene van Horssen ná Phil Hand (HelpAge)
Bomwasi to bobali: Mireia Cano (GenCap)
Kobundisa moto mpo azali mwasi to mobali: Jeanne Ward (na ndenge na ye moko)
Bibosono: Ricardo Pla Cordero (Humanity and Inclusion)
Bato oyo bazali na VIH mpe baninga to bandeko na bango: Alice Fay (HCR ya ONU)
Sante ya motó mpe kobondisa bato oyo babulungani: Dr Mark van Ommeren (OMS), Peter Ventevogel (HCR ya ONU)
Makama to bitumba oyo ezali koumela: Sara Sekkenes (PNUD)
Kosala na bingumba: Pamela Sitko (WVI)
Kokamba misala ya basivile ná basoda: Jennifer Jalovec ná Mark Herrick (WVI)
Bisika mpe biloko oyo ezali epai lisungi ezali kopesama: Amanda George ná Thomas Palo (Croix-Rouge ya Suède)
Koluka kokitisa makama minene: Glenn Dolcemascolo ná Muthoni Njogu (UNISDR)
Lisungi ya mbongo mpe mimbongo: Isabelle Pelly (CaLP)
Mosala ya koyeisa biloko mpe kokómisa yango na bisika oyo esengeli: George Fenton (Humanitarian Logistics Association)
Kolandela, kotalela, kozala na mokumba na miso ya bato mpe koyekola: Joanna Olsen (CRS)
Komite ya Bakambi ya Sphère (sanza ya mitano 2018)
Action by Churches Together (ACT) Alliance (Alwynn Javier) * Aktion Deutschland Hilft (ADH) (Karin Settele) * CARE International (Phillipe Guiton) * CARITAS Internationalis (Jan Weuts) * Humanitarian Response Network, Canada (Ramzi Saliba) * InterAction (Julien Schopp) * The International Council of Voluntary Agencies (ICVA) (Ignacio Packer) * Fédération internationale des Sociétés de la Croix-Rouge et du Croissant-Rouge (FISC) (David Fisher) * Corps médical international (CMI) (Mary Pack) * Fédération luthérienne mondiale (FLM) (Roland Schlott) * Office Africain pour le développement et la coopération (OFADEC) (Mamadou Ndiaje) * Oxfam International - Intermón (Maria Chalaux Freixa) * Plan International (Colin Rogers) * RedR International (Martin McCann) * Save the Children (Unni Krishnan) * Sphere India (Vikrant Mahajan) * Armée du Salut (Damaris Frick) * World Vision International (WVI) (Isabel Gomes).
Topesi mpe matondi na bato mosusu ya Komite oyo babandisaki mpe batambwisaki mosala ya kobongisa lisusu buku oyo, mpe banda wana balongwá na Komite yango: Sarah Kambarami (ACT Alliance) * Anna Garvander (Church of Sweden/LWF) * Nan Buzard (ICVA) * Barbara Mineo (Oxfam International – Intermón) * Maxime Vieille (Save the Children).
Bapesi-mbongo
Longola mbongo oyo bibongiseli oyo euti kotángama likoló, oyo esali Komite ya Bakambi, epesaki, mbongo mpo na mosala ya kobongisa lisusu buku oyo eutaki mpe na:
Agence danoise pour le développement international (DANIDA) * Ministère allemand des affaires étrangères * Irish Aid * Guvernema ya Australie – Ministère des affaires étrangères et du commerce (DFAT) * Direction générale pour la protection civile et les opérations d’aide humanitaire européennes de la Commission européenne (ECHO) na nzela ya basosiete ya Croix-Rouge mpe ya Croissant-Rouge (FICR) * USAID’s Office of United States Foreign Disaster Assistance (OFDA) * Agence suédoise de développement international (SIDA) na nzela ya Église de Suède * Direction du développement et de la coopération suisse (DDC) * Haut Commissariat des Nations unies pour les réfugiés (HCRNU) * United States Department of State Bureau of Population, Refugees and Migration (US-PRM).
Ekipi ya mosala ya kobongisa lisusu buku oyo
Christine Knudsen, Mokambi Monene (Sphère)
Aninia Nadig, Mokambi ya mosala ya kobenda likebi ya bato mpe kosala boyokani na bato mosusu (Sphère)
Basemboli-makomi: Kate Murphy ná Aimee Ansari (Traducteurs sans frontières)
Bakambi ya mosala ya kobongisa lisusu buku oyo: Lynnette Larsen ná Miro Modrusan
Basali ya Sphère oyo bapesaki mabɔkɔ:
Tristan Hale, Mokambi ya makambo etali koyekola mpe kopesa formasyo
Wassila Mansouri, Shefu ya mosala ya boyokani na basusu mpe kobenda likebi ya bato
Juan Michel, Mokambi ya makambo etali kosolola na basusu tii na sanza ya 9 ya 2017
Barbara Sartore, Mokambi ya makambo etali kosolola na basusu, kobanda na sanza ya 10 ya 2017
Loredana Serban, Mokambi ya makambo ya biro mpe mbongo
Kristen Pantano ná Caroline Tinka, Basali oyo bazali koyekola mosala
Lisungi mpo na makambo ya Internet: Markus Forsberg (PHAP)
Kobongisama ya ndenge buku esengeli komonana: Non-linear (www.non-linear.com)
Kobongisa makomi, nkasa, mpe kobimisama ya buku: Practical Action Publishing (www.practicalactionpublishing.org)
Kimberly Clarke and Megan Lloyd-Laney (CommsConsult)
Topesi matondi mingi na James Darcy, Malcolm Johnston, Hisham Khogali, Ben Mountfield, Dr Alice Obrecht, Ysabeau Rycx, Panu Saaristo, Manisha Thomas mpe Marilise Turnbull mpo na misala ndenge na ndenge oyo basalaki ntango buku oyo ezalaki kobongisama lisusu.
Bamonisi ya Sphère oyo babongisaki bokutani na bibongiseli mpe bato mpo na kotuna makanisi na bango:
ADRA Argentina (Consultation régionale avec les ADRA d’Amérique du Sud)
Organe de coordination de l’Agence d’Afghan Relief (Afghanistan)
Alliance of Sphere Advocates in the Philippines (ASAP)
Amity Foundation (mosangani ya Groupe de travail sur les standards de bienfaisance, momonisi na Chine)
BIFERD (République démocratique du Congo)
Community World Service Asia (Thaïlande ná Pakistan)
Daniel Arteaga Galarza,* mopesi-toli ya Sphère epai ya National Risk Management System (Équateur)
Dr Oliver Hoffmann* elongo na momonisi ya Sphère na Allemagne
Grupo Esfera Bolivia
Grupo Esfera El Salvador
Grupo Esfera Honduras
Illiassou Adamou* elongo na Sous-groupe pour la protection de l’enfance (Niger)
Indonesian Society for Disaster Management (MPBI)
Institut Bioforce (France)
InterAction (États-Unis)
Inter-Agency Accountability Working Group (Éthiopie)
Conseil des ONG coréennes pour le développement et la coopération international (République de Corée)
Sphere Community Bangladesh (SCB)
Sphere India
Forum ukrainien des ONG
PNUD Chili
Moto ye moko nde azali momonisi